Bonkumu ya kati-kati na Kemet (Ezipeto)

Tous les articles

Bonkumu ya kati-kati na Kemet (Ezipeto)

Mentuhotep ii mabiki net

Kemet (Ezipeto) ekotaki na suka na mobulu. Mobulu yango ewumelaki pene na bambula kama (100). Bituka ya se pe ya likolo, ekomaki kotambola lokola nde, ezalaki Bikolo-nsomi (pays indépendants). Etuka na etuka ezalaki kotambola na ndenge na yango. Faraon (Ndako Monene) azalaki lisusu na tina monene te, na miso ya bato.

Lelo pene na bambula 4077, Mentuhotep II, mokitani ya Intep III afandaki bongo na ebonga ya bonkumu ya Kemet. Abandaki bongo bitumba monene po na kozongisa bomoko na kati ya Kemet. Mampinga ya basoda na ye elongaki bongo etuka moko-moko pe efandisaki bokonzi ya Ndako Monene (bokonzi ya Faraon).

Elombe Mentuhotep II alongi etumba po na kozongisa Bomoko ya Kemet.

Na oyo etali koyangela Ekolo, Mentuhotep afandisaki bakonzi ya bituka, bato oyo ye atielaki penza motema. Bato yango pe bayekolaki mosala ya boyangeli na ndenge esengeli. Yango epesaki Mentuhotep II makoki ya kozwa boyangeli Leta na maboko na ye. Bakomaki pe kokongola mpaku na ndenge esengeli.

Mentuhotep II aponaki bongo engumba Wasset (babengaka yango pe Thebes, Luxor) po ezala mboka-Mokonzi ya Kemet. Toloba, Mentuhotep pe awutaki na Kemet ya likolo, na mboka Wasset. Tango akomi Mokonzi na Kemet ya Likolo pe ya se, azwaki bongo kombo Nebhotepre. Elingi koloba : « mwana ya Ra » to « mwana ya Nzambe ». Mentuhotep azalaki mokonzi monene ya mampinga, azalaki pe mokanisi monene.

Mentuhotep, Mokanisi monene, elongo na mwasi wa ye Na tango na ye, nde makomami efulukaki na mokili ya bato mwindu. Bonkumu ya zomi na moko (onzième dynastie) ebandisamaki na Faraon Mentuhotep II. Na sima na yango, bonkumu ya zomi na mibale (douzième dynastie) ezwaki bokonzi. Yango ebandisamaki na Faraon Amenemope I.

BaFaraon nyonso oyo bakitanaki na esika ya Mentuhotep II, balendisaki bokasi ya mampinga pe mombongo na Bikolo nzinga-nzinga. Ezala Bikolo ya bayindo misusu lokola bango, ezala Bikolo ya bapaya na ngambo ya Mbu Mediterane pe na Azi.

Na bonkumu ya katikati nde, makomami ya bayindo ebutaki penza makasi. Kuna nde ekolisamaki pe etiamaki na molongo : masese, masapo pe kopesela (Kasàla) oyo eyebani tii na moyi ya lelo epayi ya Bayindo.

Eyaki lisusu ndongo, misala minene ya kotonga, ndakisa, bandako minene lokola bibombelo bilei, malita, bamonima pe bandako ya kofanda.

Kati na baFaraon oyo bakende sango, tokoki kotanga Senurset (oyo ayebani lisusu na kombo ya Sesostris). Bonkumu ya katikati ewumelaki pene na bonkama misato (trois siècles), kobanda lelo bambula 4077 tii lelo bambula 3649.


Olobi nini?