Na tango ya bakoko na biso, lelo pene na bamvula 5400, kaka bato mwindu nde bazalaki kofanda na Afrika. Bikolo ndenge na ndenge bazalaki kobika kolandana bokula ya ebale Nile pe bipayi na bipayi ya Afrika.
Lokola Nile ebanda na katikati ya Afrika pe ngele na yango ezali na ngambo ya likolo, bakoko bazalaki kobenga minano ya Nile, Nile ya likolo pe mityo na yango Nile ya ngele.
Bokula ya Nile, bikolo ezalaki ya minene, bokasi pe nkota nzike. Nkota yango nyonso ezalaki se nkota ya Afrika. Bana bazalaki kokende na bomama. Elingi koloba, bokonzi ezalaki kowuta na noko pe kokende na mwana-nkasi (nkana). Na boye, bokonzi ezalaki kotikala na ekina (clan). Bakonzi bazalaki kobengama Per-aa (Faraon). Per-aa elingi koloba ndako ya monene.
Penepene na 3400 liboso ya manaka ya lelo (liboso ya Yesu masiya), na etuka ya Nile ya likolo, Narmer akomaki bongo na bokonzi ya libota na ye. Azwaki bongo lokumu ya kobengama Per-aa pe abalaki mwasi na ye Neith Hotep. Narmer alataki bongo motole ya pembe, elembo ya bokonzi na Nile ya likolo. Azalaki na bozo makasi: alingaki kosangisa Afrika mobimba ekoma Ekolo se moko na se ya Bokonzi na ye. Na boye atongaki mapinga ya nguya pe akonzaki Bikolo oyo ezalaki na Nile ya ngele. Na boye Narmer alataki mitole mibale ya bokonzi : motole ya motane oyo ezalaki elembo ya bokonzi ya Nile ya ngele pe motole ya pembe oyo ezalaki elembo ya bokonzi na Nile ya likolo. Libale yango ekobaki bongo bo elembo ya bokonzi po na bafaraon nyonso oyo bayaki na sima.
Ekolo monene ebotamaki pe Narmer abengaki yango : Kemet. Kemet elingi koloba : mabele ya Bayindo. Na sima ya bamvula nkoto na nkoto, bakomi ya bagreki oyo babandaki kokoma lisapo ya Kemet babengaki yango Aegyptus (Egypte, Ezipeto).
Narmer akabolaki bongo Bonkumu Kemet na nome (bituka, provinces) 42. Banome 20 na Kemet ya ngele pe banome 22 na Kemet ya likolo. Nome ezalaki bongo koyangelama na nomarch (gouverneur). Narmer ye moko nde azalaki kotia banomarch yango engebene na bokonzi ndenge epesamaka na libota yango. Nome na nome bazalaki na monoko na bango ya mboka. Na boye, Kemet ezalaki ekolo monene na nkota nzike (minoko ebele).
Narmer azalaki bongo Faraon ya liboso ya Kemet (Égypte). Bonkumu ya bafaraon efandaki pene na bamvula 3000, pene na ngala 30 ya mabota ekambaki Kemet. Narmer afandaki na bokonzi koleka bamvula 30 pe ye nde apikaki makonzi ya Ekolo oyo etongaki bongo molengelano (civilisation) ya liboso na Lisapo ya Bomoto awa na mokili. Molengelano yango nde ekelaki kokoma, shimi, matematiki pe losambo ya Nzambe moko. Kino na moyi ya lelo, bitonga minene lokola bapiramidi ya Ezipeto ezali bongo misala ya Bayindo oyo bangalaki uta katikati ya Afrika kino na Mbu ya Mediterane, na ngambo nyonso mibale.
Toli po na babuku ya kotanga :
Molefi Kete Asante. 2008. History of Africa. Routledge
Cheik Anta Diop. 1954. Nations Nègres et Cultures. Présence Africaine
Théophile Obenga. 1973. L’Afrique dans l’Antiquité – Égypte ancienne – Afrique noire, Présence Africaine.