Mohly N'Kany Patience ayambaki Bienvenu Sene Mongaba na ndako na ye na Liedekerke epayi ya baflama. Ye azali Mosungi mabota.
Azali mwasi ya tata Michel Awete Dongo. Bazali na bana misato : Landry, Hans, Henriette mpe na Augusta .
« Nalingaka kosunga mpe koyoka bato. Tala ntina nasepelaka na mosala na ngai ya Mosungi mabota. »
BSM. Mbote mama. Lobela biso osalaka mosala na nini?
MP. Nazali Mosungi mabota. Ezali kosunga mpe kobongisa bato na bandako na bango. Ndakisa mibange, mabota ya bato ebele to bato bazali kobima na bokono oyo bazali na mposa ya lisungi.
BSM. Osalaka wapi?
MP. Nasalaka na Bruxelles. Ezali na lingomba ASD. Kuna toyanganaka mbala moko na mposo. Bakopesa biso mwango ya mikolo 15. Bakopesa mpe bizaleli ya bato oyo tokokende kosunga. Biso mpe tokoloba oyo tomonaki na bisika ya misala. Ézala malamu to mabe.
BSM. Lisungi ya ndenge nini?
MP. Ndakisa kosalela bango zando, kolandela makambo na bango ya mikanda (ézala ya leta to ya mai to ya bweta mpe bongo na bongo). Kokende kotika bango na bokutani, ndakisa epayi ya monganga, to mosambeli to mpe molandi boyokani. Tosalaka mpe mosala ya ndako : kolamba, kokomba, kobongisa. Ntango mosusu mpe kosukola bango (mibange to bato bazali kobima na bokono). Mingimingi bato oyo bazalaka bango moko bazalaka na mposa ya kosolola. Ofandi, obandi koyoka ye. Omeki mpe kopesa ye toli to mpe kolendisa ye.
BSM. Osepelaka na mosala yango?
MP. Ee. Ngonga ya mosala eninganaka te. Nabandaka na ngonga ya 8 h 30 tii 16 h 30. Na sima na yango, nazali na ntango ya kokipe libota na ngai. Banda nazalaká mwana moke, mposa na ngai ezalaka kosala na mosala ya kosunga bato. Nazalaká kobanza nákoma monganga to infirmier to mpe mosala mosusu na kati ya lopitalo. Sima nalandi lisusu nzela yango te. Ntango nzela ya koyekola mosala oyo eye, namibwaki mbala moko. Moto azali na basusi to azali ye moko. Akolebela yo makambo na ye. Nasepelaka kolendisa bato, kopesa bango makasi.
BSM. Osalaki ndenge nini mpo óyeba mosala yango?
MP. Nalandaki mateya na yango na CEFOR na Schaerbeek. Sanza zomi. Uta sanza ya mibale kino ya zomi na mibale na 1999. Mokolo mobimba, kobanda mokolo ya liboso tii mokolo ya mitano.
BSM. Bozalaki kotanga makambo nini?
MP. Boyekoli biteni ya nzoto ya moto, boyekoli bizaleli ya bato, mibeko, mabongisi makambo ya bomoi na mboka, kotonga bilamba, kolamba, mpe bongo na bongo. Kosala mpe bimekelo (stage) na bandako ya bopemi ya mibange, ya bobateli bana mike mpe na bandako ya bato. Mimekano ezalaki yambo bándima yo na boyekoli mpo bato baalaki ebele. Na ORBEM okokutana na Moyebi ndenge ya bizaleli. Mpo átala mpenza soki okokoka mosala yango. Sima bosali momekano mpo bátala soki ndelo ya kelasi na yo ekoki mpo na kolanda mateya. Sima na yango bokutani na bakambi ya eteyelo. Sima bandimi yo. Tozalaki bato 150, bazwaki kaka bato 25.
BSM. Mpo na nini?
MP. Ezali mosala moko esengaka motema pio mpe kotanga ézala na mwa ndelo ya malamu. Mpo ndakisa mikanda ya bahuissier to ya leta esengaka mwa koyeba. Koyeba mpe ndenge ya kolimbolela mokolo likambo.
BSM. Ndenge nini oyebaki 'te mateya wana epesamaka?
MP. Nayokaki nsango epayi ya moninga moko, Pierrette, mwasi ya Pierre ya Berchem. Esika Pierrette atindaki ngai ezali mpo na bozongisi na ndelo, sima nde obandi koyekola kimosungi mabota. Ngai bamonaki 'te nazali na makoki ya kobanda mbala moko. Yango wana bapesaki ngai esika CEFOR ezalaka. Nakei mpe mbala moko komikomisa.
BSM. Liboso ozalaki kosala nini ?
MP. Nazwá diplôme d'Etat mpe nasalá na agence ya Douane na Kinshasa. Naye kokoma na Belgique na 1993. Mayele ya kosala ezalaki te mpo na mikanda ezalaki te. Nazalaki na CPAS, kaka na mikanda oyo ya minene ya Office des étrangers. Sima naye kozwa carte orange (1996). Nakeyi koluka permis de travail na ORBEM. Kuna mpe esengaka kende zonga. Nabandi koluka mosala. Sik'oyo nakosala mosala na qualité nini? Esengaki násala formation. Lokola nakomaki na zemi ya Henriette, nazeli naino. Ntango naboti, nabandeli koluka na 1997. Naye kozwa formation oyo na 1999.
BSM. Soki tolobi ókokanisa lelo na bambula oyo bino boyaká. Mpo na makambo ya mosala omoni yango ndenge nini?
MP. Lelo bafungoli mwa banzela. Nanu efungwami mpenza te kasi ezali kofungwama; Esengi kaka molende. Namoni baninga misusu oyo batikalaki na CPAS, bakomi mpe kosala misala ézala na ndenge ya article 60. Ntango wana ezalaki te.
BSM. Toli nini okopesa na bandeko misusu ?
MP. Na bato oyo bazali na mikanda, bapolisa yango te. Okoki kosala mosala soki ozali na qualification. Soki ozali na yango te, malamu kolanda formation. Baformation ezali ndenge na ndenge, kolanda mposa na yo mpe makoki ya mayele na yo. Ngai nazwaki mosala kaka ntango nazali kosala formation. Nakendeki stage, esika moko emonani mpo moto moko alongwaki. Nayingeli wana mpo na sanza misato, malembe malembe, elongwi ya ntango ekatamá (CDD) lelo oyo ekomi ya ntango ekatamá te (CDI). Mpo basepelaki na esaleli na ngai. Ezali mpe na misala misusu esengaka na yango formation te, kasi ezali kokoma mpasi mpo na komonana. Misala mingi esengi koyekola. Na baoyo bazali na mikanda te, molende mpe koyika mpiko. Kobunda na ndenge nionso mpo na kozwa mikanda. Mpo soki mokanda ezali te, mpasi mingi. Nasalaki soki mbula mitano yambo nákoma na mokanda ya orange. Mbamba, tii ekosimba.
BSM. Totondi yo botondi na ndenge oyambi biso mpe olobeli biso na ntina ya mosala na yo.
MP. Ngai mpe natondi bino, bokoba kaka na mosala ya kolendisa bato ya ekolo na biso na oyo etali koluka mosala. Maloba mayambami na Bienvenu Sene Mongaba