Lisolo ya MONDONGA (okapi)

Tous les articles

Lisolo ya MONDONGA (okapi)

Mondonga 1

Mbote na biso banso !! Kaka ndenge, tolebelaki BONOBO mokolo moleki, lelo tokolobela nyama na nkombo MONDONGA yo okapi.

Nyama eye, abanda kobika na ekolo République Démocratique du Congo uta ebandeli ya mokili. Kasi, na Mobu 1901 ndeko moko na nkombo Sir Harry Johnston, ntango amona MONDONGA nde asala ete mikili ya Poto bayeba ete nyama eye abikaka na ekolo République Démocratique du Congo.

MONDONGA, azali moí-mabéle (mammifère). Esengeli koyeba ete esika na ye ya kobika ezali se mabelé ya ekolo Congo.

Ya kokamwa ezali ete, soki otali na nzoto ya MONDONGA, okomona lolenge ya nyama ibale : MPUNDA YA MINGOLU ( ZÈBRE) mpe na nyama oyo babengi DIKATA to DIKALA (GIRAFE).

MONDONGA, ye abikaka na zamba ya ITURI oyo ezwami mpe na mboka ITURI, epayi wapi basalela bango lobala to mpe esobe-ebatelelo ( PARC) kaka mpo na bango mpe bapesa yango nkombo MONDONGA.

MONDONGA, ye akomaka na molai 1,80m mpe akomaka monene tii na kiló 230 kg.

Kaka ndenge tolobaka, soki mwa liloba moko epesi yo mwa nkokoso, kota na lombango na www.monoko.org kuna epayi wapi okokuta mayeboli mpe mabongoli nyonso.

Totondi bino botondi !!

www.monoko.org


Olobi nini?