Mama Suzanne Fisch esi azongisa molimo epayi ya Mokeli. Lelo oyo na mboka ya bawei, tokanisi lisusu lisolo na ye na Bamama ya Congo na Belgique na 2004.
Suzanne Fisch « Bomoi na ngai ezali nzela molai : molakisi mitindo ya elateli, moyambi bapaya, nkolo ya elielo, lelo mwasi na politiki »
Suzanne Fisch ayambaki Marie-Henriette Luvengika na esika na ye ya mosala.
MHL- Natondi yo botondi na ndenge ondimi koyamba ngai na esika na yo ya mosala. Osalaka na mosoko ya ministre Pascal Smet?
SF- Ee, azali ministre ya botamboli mpe ya misala ya kotonga na etando ya Bruxelles Capitale. MHL- Naye kosolola na yo mobembo ya bomoi mpe ya mosala na yo.
SF- Nzela moko molai : lelo nazali na mbula 55. Nabotamá na Congo- Kinshasa na etando ya Bandundu. Nazali mama na mapasa mibale ya mbula 36. Nakomi mpe nkoko. Tata na ngai azali belesi. Mama na ngai mwana ya Congo. Nakoli na Congo kino ntango nakomi na mbula 9. Makambo ya lipanda etindi biso tóya na Belgique.
MHL- Elingi koloba osalaki mingi ya bakelasi na yo awa na Belgique?
SF- Natangi tii na mbula 17. Naye kobota bana na ngai. Nakokaki lisusu kokoba na mateya ya likolo to ya bobongo te. Namikotisaki mbala moko na moluká. Namisalá ngai moko.
MHL- Oleká na misala mingi. Osala mpe lokola molakisi motindo ya bilamba. SF- Ee. Nabandaki lokola moyambi bato na milulu. Na sima, naye kosala ndako na ngai moko. Nasalaki mpe mpo na Marlboro na tour de France. Na Antwerpen nasali mbula 8 na ECC. Nasali mpe lokola molakisi motindo na bandako ya bilamba na Belgique, Allemagne mpe Italia
MHL Elingi koloba 'te ekembisá boyebi na yo ya minoko misusu?
SF- Lifalanse ezali monoko na ngai ya mboka. Lokola nazali kosala na mosoko ya baflama, nasalaki mpenza makasi mpe lelo nalobaka minoko nionso mibale malamu. Nabundaka moke moke na lingala na kikongo. Nalobaka kiitalien. Natiaka mpe moto na kirusse. MHL- Omibwakaka mbala moko to okanisaka mingi liboso ya komibwaka na likambo ?
SF- Ekipe likambo. Kasi natalaka mingi na sima, nasosoli, sima nde natie bikoma to mpe nasali.
MHL- Mosala nini efungolaki yo koleka?
SF- Kolongola mosala ya molakisi motindo, nazalaki mpe na elielo (restaurant) mbula zomi. Nakutanaki na bato ebele.
MHL- Eleki mbula misato, oyebisaki ngai 'te okutanaki na mobundi ya nsango Mohamed Ali. Okutanaki na ye ndenge nini? SF- Na mobu 1971, nakendeki Congokoluka mama na ngai. Kasi namonaki ye te. Na 1974, bamemeli ngai nsango 'te bamoni ye. Nakeyi mbangu mbangu, kasi mawa mingi mpo na ngai. Ezalaki ye te. Ezalaki ndeko na ye. Nakokaki kokanga motema te. Mposa ya bomoi esilaki ngai. Nafandaki na otel komela te koliya te. Ntango Ali ayoki lisolo na ngai epayi ya mokambi otel, abengi ngai na mesa na ye. Sima ya mikolo mibale, nabimi. Tala ndenge tata oyo asungaki ngai mpo nálonga bwale oyo nazalaki na yango. Nasalaki lisusu mpo na ye, ntango ayaki na Belgique na 1979. Azali tata moko suka. Moko na bato minene oyo nakutaná na bango na bomoi na ngai. Suka na nguya. MH. Tóloba nanu mobembo na yo na politiki. Likanisi yango ya komibwaka na politiki eutaki wapi?
SF- Eyaki kaka bongo. Natekaki elielo (restaurant) na ngai. Nazangaki mosala mbula mibale. Kaka na bato ya koyebana, naye kokota na mosoko ya ministre. Basengaki ngai nakipe ndenge ya kokebisa mpo mobulu ya kobebisa biloko na babus ézalaka te. Na sima mbongwana ekoti. Tata Pascal Smet akomi ministre molandi. Asengi ngai batiya ngai na molongo ya maponomi. Nazalaki kozela yango te. Kasi ezalaki eloko moko ya ntina.
MH. Bato boni baponaki yo?
SF- Bato 270. Elingi koloba bato 270 bandimeli yo. Epesaki ngai nkonzo. MHL- Mpo na yo, awa na Belgique, mbongwana nini, oyo ekoki komema makambo ya sika, esengeli kosalama na politiki.
SF- Esengeli mbongwana oyo ekoki komema makambo ya sika te. Esengeli nde liboso, bato oyo bazali awa, bakoma mpenza baimboka Belgique. Ngonga ekoki ya kofungola basanduku oyo totiyá na nse ya mbeto. Ezali na bato bayá Belgique, lelo mbula 30 kasi bazelaka kaka mokolo bakozonga. Baboti bana, bazwi mpe bankoko. Na Belgique balobaka minoko mibale. Esengeli na biso kosala makasi ya koyekola yango. Ezala lifalanse to kiflama. Esengeli tomikotisa mpe na lolenge ya awa. Kokende kotalaka bandako ya bikeko (musée), kokende kotalaka miziki ya bikolo misusu, koliyaka mpe bilubu ya bipayi na bipayi, mpe bongo na bongo.
MHL- Liloba nini okoki kotindela bilenge? SF- Bilenge banso oyo bazali awa bazali na libaku malamu ya kokende kelasi. Esengeli básala makasi mingi na kelasi to mpe na boyekoli ya ndenge na ndenge. Ezali nde ntango ya kelasi nde okoki koyebana na bato oyo na mikolo ekoya bakoki kozala na ntina mpo na yo. Lokola mama, bana na ngai batangaki mpe lelo oyo basalaka. Ezali lokumu mpo na ngai.